Abakuki  
 1
Loyembo ya liboso ya mawa 
 1 Tala liloba oyo mosakoli Abakuki azwaki na emoniseli : 
 2 Oh Yawe, kino tango nini 
nasengeli kobelela Yo mpo ete osunga, 
kasi ozali koyoka te ? 
Nazali koganga epai na Yo : « Minyoko eleki ! » 
kasi ozali kaka kobikisa te ! 
 3 Mpo na nini ozali kolakisa ngai 
makambo mabe ya boye ? 
Mpo na nini ozali kosala eloko moko te ? 
Liboso na ngai, nazali kaka komona libebi 
mpe makambo mabe, 
bato bazali kaka koswana mpe kofundana. 
 4 Yango wana bato bazali kotosa lisusu mibeko te, 
bazali kokata lisusu makambo na bosembo te. 
Bato mabe bazali kolonga liboso ya bato ya sembo, 
makambo ezali lisusu kokatama na bosembo te. 
Eyano ya Yawe 
 5 Botala nanu malamu bikolo mosusu 
mpe bokokamwa penza, 
pamba te nakosala likambo moko na tango na bino, 
likambo oyo bokondima te 
soki bayebisi bino yango. 
 6 Nakotindela bino bato ya Babiloni, 
bato ya mitema mabe, 
oyo bayokelaka bato mawa te : 
batambolaka mokili mobimba 
mpo na kobotola bato bisika na bango 
ya losambo na makasi. 
 7 Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka, 
basalaka makambo nyonso 
oyo bazali na yango posa, 
mpe moto moko te amekaka kotelemela bango. 
 8 Bampunda na bango ekimaka mbangu 
koleka ata nkoyi, 
ezalaka na kanda makasi 
koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa 
mpo na koluka nyama ya kolia. 
Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda 
batambolaka mbangu makasi 
mpe bawutaka mosika penza, 
bapumbwaka lokola mpongo 
soki ezali kokita na elulu 
mpo na kokanga nyama ya kolia. 
 9 Bango nyonso bayaka nzela moko 
mpo na kotia mobulu, 
bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este, 
bazwaka bakangami ebele 
ndenge balokotaka mbuma ya zelo. 
 10 Batiolaka bakonzi mpe basekaka bakambi, 
basekaka bingumba batonga makasi, 
batondisaka mabele pembeni ya bamir 
mpo ete bamata likolo na yango 
mpe bakota na engumba mpo na kobotola yango, 
 11 balekaka lokola mopepe 
mpe bakobaka nzela na bango, 
basepelaka kosala mabe, 
mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango. 
Loyembo ya mibale ya mawa 
 12 Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? 
Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, 
okufaka te. 
Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; 
mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango 
mpo na kopesa biso etumbu. 
 13 Miso na Yo ezali peto koleka, 
okoki kotala mabe te. 
Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ? 
Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ? 
Mpo na nini ovandi kimia 
wana bato mabe bazali konyokola 
bato oyo baleki bango na bosembo ? 
 14 Okomisi bato lokola bambisi ya ebale, 
lokola banyama oyo etambolaka na libumu 
mpe ezanga mokonzi. 
 15 Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo, 
akangaka yango na monyama 
mpe atiaka yango na kitunga. 
Yango wana asepelaka 
mpe atondaka na esengo. 
 16 Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka, 
atumbelaka kitunga na ye ansa ; 
pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye, 
azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko. 
 17 Boni, akosepela solo kotika 
ete monyama na ye ezanga mbisi 
na kokoba koboma bato na mawa te ?